Ndoki

Song

Ndoki

Lyrics

Non c'est pas vrai, il me saoule ce mec, il me saoule, franchement Ahh Pona nini kaka ngay oh Ngay oh ngay oh Ngay oh ngay oh Ngay oh ngay oh Ngay oh Malheur kaka ngay oh Ngay oh ngay oh Ngay oh ngay oh Ngay oh ngay oh A transfera ba appel nanga na numero moko nayebi te Soki na bengi na zwaka chinois moko Soki nalobi: "Allô bonjour" a zongiselaka nga "Allô ni hao" Ah toko solola nini motema pasi eh Moto ozalaki ko benga papa lelo papa abongwani Akomi tala tonton oyo Moto ozalaki kobenga maman lelo maman abongwani Akomi vraiment tala petite oyo Mawa maman Ndoki eza kaka synonyme ya maseke na moto te oh Po na zamba ba niama pe baza nango na moto Kasi eza nde synonyme ya oyo azo lukela moninga liwa Ndoki ya vie nanga eza yo chérie eh Ndoki ya vie nanga eza yo chérie eh Ndoki ya vie nanga eza yo chérie eh Motema ekomi ko clignoter direction ya lilita Po yo conducteur ya vie nanga o lembi nga Souci mokonzi ya mitraille ya nzoto ya moto A teki nga en parties par-ci par-là Na place o tika nga ata na nzela eh Batu ya mawa bayiba ata koyiba Peut-être ba ko réviser motema oyo Osalela mabe yango e koma ko fumer yeh Pona ba chocs ya genre nayo chérie Ndoki ya vie nanga eza yo chérie eh Botika nga nalela na ngai eh Peut être ako yoka mawa ako zonga Po place naza pongi e bo' ko koma Nazui sors Vermox e salaka ba ascaris pe ba amibes Amour nayo e kati nga mike-mike Osambuisi nga lokoka makila Na etumba ya ba samouraï ya ba épée Ndenge Tetra ekangaka libumu Nde ndenge okoki kokanga ba larmes nanga Mais o tiki nga pleurs ba larmes bébé Ndoki ya vie nanga eza yo chérie eh Mawa ahh yoohh Mawa opesi nga ezo envier Mawa ya moto a kufeli papa lundi Mercredi soir a kufeli maman kokamwa eh Santé nanga ya 1000 Gigas, souci nayo E komisi yango 13 Megas souffrances Ndoki eza kaka synonyme ya maseke na moto te oh (ohh) Po na zamba ba nyama pe baza nango na moto Kasi eza nde synonyme ya oyo azo lukela moninga liwa Ndoki ya vie nanga eza yo chérie eh (Reviens ohh ohh sors nanga eh) Ndoki ya vie nanga eza yo chérie eh (ohh) Docteur tika kokosa maman que nako bika eh Oyebi bien naza mourant d'ici là Ordonance ozo komela ye soki azongi akuti nakufi eh Pharmacien ako zongisa mbongo te Mbongo e koki kosunga bango ata sukali eh Ya matanga nanga au lieu bacotiser Lokumu ya famille nanga ahh Maman ehh Pasteur tika kokosa famille que nako bika eh O yebi esprit de mort naza na yango E wuti na ba demons te ya ngani Mais e wuti na absence ya chérie po atiki ngai Il suffit bo benga Nana aya awa eh Une minute e zali ebele nako bika eh Nako bika pour vous prouver qu'eza ye Botika ko accuser ba demons ya ngani ehh Ndoki eza kaka synonyme ya maseke na moto te oh Po na zamba ba niama pe baza nango na moto Kasi eza nde synonyme ya oyo azo lukela moninga liwa Ndoki ya vie nanga eza yo chérie eh Ndoki ya vie nanga eza yo chérie eh Ndoki ya vie nanga eza yo chérie eh Motema nanga a zwa chérie eh Ndoki ya vie nanga eza yo chérie eh Ndoki ya vie nanga eza yo chérie eh Ndoki ya vie nanga eza yo chérie eh Oohh ngay oh Ndoki ya vie nanga eza yo chérie eh Yaya na Bafana... Ndoki ya vie nanga eza yo chérie eh Motema pe mabanzo Ndoki ya vie nanga eza yo chérie eh Ndoki eza kaka synonyme ya maseke na moto te oh Po na zamba ba niama pe baza nango na moto Kasi eza nde synonyme ya oyo azo lukela moninga liwa Ndoki ya vie nanga eza yo chérie eh Ndoki ya vie nanga eza yo maman ehh Ndoki eza kaka synonyme ya maseke na moto te oh Po na zamba ba niama pe baza nango na moto Kasi eza nde synonyme ya oyo azo lukela moninga liwa Ndoki ya vie nanga eza yo chérie eh Ndoki ya vie nanga eza yo chérie

Lyrics provided by LRCLIB.

Popular by Fally Ipupa